Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 22:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Na yango, Doege+ Moedome, oyo atyamaki mpo na kokamba basaleli ya Saulo, ayanolaki mpe alobaki boye: “Namonaki mwana ya Yese ayei na Nobe, epai ya Ahimeleke+ mwana ya Ahitube.+

  • Nzembo 52:maloba ya ebandeli ya loyembo-9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • Epai ya mokambi ya nzembo. Maskile. Ya Davidi, ntango Doege Moedome ayaki koyebisa Saulo mpe koloba na ye ete Davidi akendaki na ndako ya Ahimeleke.+

      52 Ee yo moto ya nguya, mpo na nini ozali komikumisa na likambo oyo ezali mabe?+

      Motema boboto ya Nzambe ezali mokolo mobimba.+

       2 Lolemo na yo, oyo epeli lokola razware, ezali kokana kobimisa minyoko,+

      Ezali kosala na bokosi.+

       3 Olingi oyo ezali mabe koleka oyo ezali malamu,+

      Lokuta koleka kolobela boyengebene.+ Sela.

       4 Olingi maloba nyonso oyo ezali koboma,+

      Ee yo lolemo ya bokosi.+

       5 Mpe Nzambe ye moko akobuka yo mpo na seko;+

      Akobwaka yo na nse mpe akolongola yo na hema na yo,+

      Mpe akopikola yo mpenza na mokili ya bato ya bomoi.+ Sela.

       6 Mpe bayengebene bakomona yango mpe bakobanga,+

      Mpe bakosɛka ye.+

       7 Talá mobali makasi oyo azali te kotya Nzambe azala ndako na ye ya makasi,+

      Kasi oyo azali kotya motema nde na ebele ya bomɛngo na ye,+

      Oyo azali koluka libateli na kati ya minyoko oyo ye abimisi.+

       8 Kasi ngai nakozala lokola nzete ya olive oyo etondi na nkasa+ na kati ya ndako ya Nzambe,

      Nazali mpenza kotya motema na motema boboto ya Nzambe mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ mpo na seko.+

       9 Nakokumisa yo mpo na ntango oyo etyami ndelo te, mpo yo osali mosala;+

      Mpe nakotya elikya na nkombo na yo, mpo yango ezali malamu, liboso ya bato na yo ya sembo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto