Masese 27:1 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 27 Komikumisa te mpo na mokolo ekoya lobi,+ mpo oyebi te soki mokolo ekobota nini.+ Mosakoli 6:12 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 12 Mpo nani ayebi bolamu oyo moto azali na yango na bomoi+ mpo na mikolo nyonso ya bomoi na ye ya mpamba, ntango azali kolekisa yango lokola elili?+ Mpo nani akoki koyebisa moto makambo oyo ekosalema nsima na ye na nse ya moi?+ Mosakoli 8:7 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 7 Mpo moto moko te ayebi oyo ekosalema,+ mpamba te nani akoki koyebisa ye ndenge yango ekosalema? Yakobo 4:14 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 14 nzokande boyebi te ndenge bomoi na bino ekozala lobi.+ Mpo bozali londende oyo ebimaka mpo na mwa ntango moke mpe na nsima elimwe.+
12 Mpo nani ayebi bolamu oyo moto azali na yango na bomoi+ mpo na mikolo nyonso ya bomoi na ye ya mpamba, ntango azali kolekisa yango lokola elili?+ Mpo nani akoki koyebisa moto makambo oyo ekosalema nsima na ye na nse ya moi?+
14 nzokande boyebi te ndenge bomoi na bino ekozala lobi.+ Mpo bozali londende oyo ebimaka mpo na mwa ntango moke mpe na nsima elimwe.+