34 Mpe Yehova alobaki lisusu na Moize ete: “Okozwa malasi:+ matangá ya sitakite, onika, galabanume ya nsolo kitoko ná olibana ya pɛto.+ Ndambo ya mokomoko na yango ekozala ndenge moko.
22 Bato ya mombongo ya Sheba+ mpe ya Rama+ bazalaki bato na yo ya mombongo; biloko na yo ya mombongo ezalaki kopesama mpo na bamalasi ya ndenge nyonso oyo eleki kitoko mpe mpo na mabanga ya ntalo ya ndenge nyonso mpe mpo na wolo.+
14 Kasi Nzambe azwa matɔndi, ye moto azali ntango nyonso kotambwisa+ biso na molɔngɔ ya balongi esika moko+ na Kristo mpe azali koyokisa nsolo ya boyebi na ye bipai nyonso na nzela na biso!+