Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 72:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Na mikolo na ye, moyengebene akokola lokola matiti ya sika,+

      Mpe kimya ekokóma mingi kino sanza ekozala lisusu te.+

  • Yisaya 60:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 “Mobulu ekoyokana lisusu te na mokili na yo, kopunzama to kobukana na kati ya bandelo na yo.+ Mpe okobenga bifelo na yo Lobiko+ mpe baporte na yo Lisanzoli.

  • Mika 4:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe akokata mpenza makambo na kati ya bato ya bikólo ebele,+ mpe akosembola makambo+ etali bikólo ya nguya oyo ezali mosika.+ Mpe bakotula mipanga na bango ete ekóma bitimweli ya mabele mpe makɔnga na bango ete ekóma makwangola ya kokata matiti.+ Bakotombola mopanga te, ekólo moko mpo na kobunda na ekólo mosusu, mpe bakoyekola etumba lisusu te.+

  • Matai 5:44
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 44 Nzokande, ngai nalobi na bino ete: Bókoba kolinga banguna na bino+ mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino;+

  • Matai 26:52
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 52 Bongo Yesu alobaki na ye ete: “Zongisá mopanga na yo na esika na yango,+ mpo baoyo nyonso basalelaka mopanga bakokufa na mopanga.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto