Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 57:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 “Nazali kozalisa mbuma ya mbɛbu.+ Kimya ya ntango nyonso ekozala mpo na moto oyo azali mosika mpe mpo na moto oyo azali pene,”+ Yehova alobi bongo, “mpe nakobikisa ye.”+

  • Ezekiele 34:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 “‘“Mpe nakosala kondimana ya kimya ná bampate yango,+ mpe nakosilisa mpenza banyama mabe ya zamba na mokili yango,+ mpe ekofanda mpenza na kimya na esobe mpe ekolala na bazamba.+

  • Hosea 2:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpe mpo na bango, na mokolo wana, nakosala mpenza kondimana ná nyama ya zamba oyo efandaka na esobe+ mpe ekelamu oyo epumbwaka na likoló ná nyama oyo ebendanaka na libumu, nakobuka litimbo ná mopanga mpe nakosilisa etumba, mpe nakolongola yango nyonso na mokili,+ mpe nakolalisa bango na kimya.+

  • Baroma 5:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Yango wana, lokola totángami bayengebene mpo na kondima,+ tiká tózala na kimya+ elongo na Nzambe na nzela ya Nkolo na biso Yesu Kristo,

  • 2 Bakorinti 5:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 elingi koloba, ete Nzambe na nzela ya Kristo+ azalaki kozongisa mokili na boyokani+ ná ye moko,+ atángelaki bango mabunga na bango te,+ mpe apesaki biso liloba+ ya kozongisa na boyokani.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto