-
Yirimia 26:18Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
18 “Mika+ moto ya Moreshete+ asakolaki na mikolo ya Hizikiya mokonzi ya Yuda+ mpe alobaki lisusu na bato nyonso ya Yuda ete: ‘Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “Siona ekobalolama lokola elanga,+ mpe Yerusaleme ekokóma mabondo ya bitiká,+ mpe ngomba ya Ndako ekozala mpo na bisika oyo etombwaná ya zamba.”’+
-
-
Ezekiele 36:4Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
4 na yango, Ee bangomba ya Yisraele,+ bóyoka liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso! Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi na bangomba mpe bangomba mike, na banzela ya mai mpe na mabwaku ná bisika oyo ebebisami oyo batiki mpamba,+ mpe na bingumba oyo esundolami, oyo ekómi eloko ya kopunza mpe ya kosɛka ya baoyo batikali na kati ya bikólo oyo ezali zingazinga;+
-