3 Yehova Nzambe na yo mpe akozongisa bato na yo oyo bakangami+ mpe akoyokela yo mawa+ mpe akoyanganisa yo lisusu longwa na bato ya bikólo nyonso epai Yehova Nzambe na yo apalanganisá yo.+
9 Ntango bokozongela ngai+ mpe bokobatela mitindo+ na ngai mpe bokosalela yango,+ ata soki bato na bino oyo bapalangani bakómi kino na nsuka ya likoló, longwa kuna nakoyanganisa+ bango mpe nakoya na bango+ mpenza na esika oyo naponi mpo na kofandisa nkombo na ngai wana.’+
14 “Bózonga, Ee bino bana bapɛngwi,”+ yango nde liloba ya Yehova. “Mpo ngai nakómá nkolo mpe mobali na bino;+ mpe nakozwa bino, moko na engumba moko mpe mibale na libota moko, mpe nakomema bino na Siona.+
4 “Nani na kati na bino oyo azali na bampate nkama moko (100), soki abungisi moko na yango, akotika ntuku libwa na libwa (99) te na esobe mpe akokenda koluka oyo ebungi tii akomona yango?+