Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 27:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Na yango, na nzela wana nde libunga ya Yakobo ekozipama,+ mpe nyonso wana nde mbuma ya kolongola lisumu na ye,+ ntango azali kokómisa mabanga nyonso ya etumbelo lokola mabanga ya mabele ya mpɛmbɛ oyo bapanzipanzi, yango wana banzete ya losambo+ ná bitumbelo ya mpaka ya malasi ekotɛlɛma te.+

  • Ezekiele 36:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Mpe nakomwangisela bino mai ya pɛto, mpe bokokóma pɛto;+ nakopɛtola bino na mbindo+ na bino nyonso mpe na bikeko na bino nyonso oyo ezali bosɔtɔ.+

  • Ezekiele 37:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpe bakomikómisa mbindo lisusu te na bikeko na bango ya bosɔtɔ mpe na biloko na bango ya bosɔtɔ mpe na makambo na bango nyonso ya kobuka mibeko;+ mpe nakobikisa mpenza bango na bisika oyo bafandi epai basali masumu, mpe nakopɛtola bango,+ mpe bakokóma mpenza bato na ngai, mpe ngai nakokóma Nzambe na bango.+

  • Hosea 14:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 “Efraime akoloba boye: ‘Ngai ná bikeko likambo nini lisusu?’+

      “Ya solo, ngai nakoyanola mpe nakokoba kotala ye.+ Nazali lokola nzete ya jenevriye oyo etondi na nkasa.+ Basengeli kozwela yo mbuma nde epai na ngai.”

  • Zekaria 13:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 “Mpe ekosalema boye na mokolo yango,” yango nde liloba ya Yehova ya mampinga, “nakolongola nkombo ya bikeko na mokili oyo,+ mpe bakokanisa yango lisusu te; mpe lisusu nakolongola basakoli+ mpe elimo ya mbindo na mokili oyo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto