43 Mpe ya solo kuna, bokokanisa lisusu banzela na bino+ mpe misala na bino nyonso oyo na yango bomikómisaki mbindo,+ mpe bokoyoka mpenza mpii oyo ekomonana na bilongi na bino mpo na makambo na bino nyonso ya mabe, oyo bosalaki.+
8 “Efraime akoloba boye: ‘Ngai ná bikeko likambo nini lisusu?’+
“Ya solo, ngai nakoyanola mpe nakokoba kotala ye.+ Nazali lokola nzete ya jenevriye oyo etondi na nkasa.+ Basengeli kozwela yo mbuma nde epai na ngai.”
2 “Mpe ekosalema boye na mokolo yango,” yango nde liloba ya Yehova ya mampinga, “nakolongola nkombo ya bikeko na mokili oyo,+ mpe bakokanisa yango lisusu te; mpe lisusu nakolongola basakoli+ mpe elimo ya mbindo na mokili oyo.+