Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 32:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Mpo mɔtɔ epelisami na nkanda na ngai+

      Mpe ekozikisa kino na Nkunda,* esika ya nse koleka,+

      Mpe ekotumba mabele ná mbuma na yango+

      Mpe ekozikisa miboko ya bangomba.+

  • Nzembo 79:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  5 Ee Yehova, kino ntango nini okosilika? Mpo na seko?+

      Kino ntango nini molende na yo ekopela lokola mɔtɔ?+

  • Yisaya 10:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpe Pole+ ya Yisraele akokóma mɔtɔ,+ mpe Mosantu na ye akokóma lolemo ya mɔtɔ;+ mpe yango ekopela mpe ekolya matiti na ye ya mabe mpe mwa banzete na ye ya nzubɛ+ na mokolo kaka moko.

  • Nahumu 1:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Nani akoki kotɛlɛma liboso ya makaneli na ye?+ Mpe nani akoki kotɛmɛla mɔtɔ ya nkanda na ye?+

      Ɛɛ, kotomboka na ye ekosopana lokola mɔtɔ,+ mpe mabanga mpenza ekobukana mpo na ye.

  • Sefania 3:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 “‘Yango wana, bózela ngai,’+ yango nde liloba ya Yehova, ‘tii mokolo oyo nakotɛlɛma mpo na kozwa biloko oyo epunzami,+ mpo ekateli na ngai ya lisambisi ezali ya koyanganisa bikólo,+ mpo nasangisa makonzi esika moko, mpo na kosopela bango bikateli na ngai ya etumbu,+ nkanda na ngai nyonso ya kongala; mpamba te, mabele mobimba ekolyama na mɔtɔ ya molende na ngai.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto