Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 72:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 72 Ee Nzambe, pesá mokonzi bikateli na yo ya lisambisi,+

      Mpe mwana ya mokonzi boyengebene na yo.+

  • Yisaya 9:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Bonene ya boyangeli na ye+ mpe kimya, kiti ya bokonzi ya Davidi+ mpe bokonzi na ye, ekozala na nsuka te.+ Ekopikama makasi+ mpe ekosimbama na bosembo+ mpe na boyengebene,+ banda sikoyo mpe tii na ntango oyo etyami ndelo te. Molende mpenza ya Yehova ya mampinga nde ekosala yango.+

  • Yisaya 11:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe boyengebene ekozala mpenza mokaba ya loketo na ye,+ mpe bosembo ekozala mokaba ya bangɛi na ye.+

  • Yirimia 23:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 “Talá! Mikolo ezali koya,” yango nde liloba ya Yehova, “mpe nakotɛlɛmisela Davidi etape ya boyengebene.+ Mpe mokonzi moko akoyangela mpenza+ mpe akosala na bokɛngi mpe akokata makambo na bosembo mpe na boyengebene na mokili.+

  • Zekaria 9:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 “Ee mwana mwasi ya Siona, zalá na esengo mingi.+ Ee mwana mwasi ya Yerusaleme, gangá na koganga ya bolongi.+ Talá! Mokonzi na yo+ azali koya epai na yo.+ Azali moyengebene, ɛɛ, abikisami;+ moto ya komikitisa,+ mpe amati likoló ya mpunda,* ɛɛ likoló ya nyama oyo ekɔmɛli, mwana ya mpunda ya mwasi.+

  • Baebre 1:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Olingaki boyengebene, mpe oyinaki makambo ya kobuka mibeko. Yango wana Nzambe, Nzambe na yo, atye yo mafuta+ ya esengo koleka baninga na yo.”+

  • Emoniseli 19:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe namonaki likoló efungwami, mpe talá! mpunda moko ya mpɛmbɛ.+ Mpe moto oyo afandaki likoló na yango abengami Sembo+ mpe Solo,+ mpe asambisaka mpe abundaka etumba na boyengebene.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto