-
2 Bakonzi 18:4Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
4 Ye nde alongolaki bisika oyo etombwaná+ mpe abukabukaki makonzí ya losambo+ mpe akatakataki nzete ya losambo+ mpe abukabukaki nyoka+ ya motako oyo Moize asalaki;+ mpamba te tii na mikolo wana, bana ya Yisraele bazalaki kotumbela yango mbeka+ mpo na kobimisa milinga ya mbeka, mpe bazalaki kobenga yango ekeko ya nyoka ya motako.+
-
-
2 Ntango 31:1Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
31 Mpe ntango kaka basilisaki nyonso wana, Bayisraele nyonso+ oyo bazalaki wana babimaki, bakei na bingumba ya Yuda,+ mpe babandaki kobuka makonzí ya losambo,+ kokata banzete ya losambo,+ kokweisa bisika oyo etombwaná+ mpe bitumbelo+ na Yuda+ mobimba ná Benyamina, mpe na Efraime+ ná Manase+ tii basilisaki; nsima na yango, bana nyonso ya Yisraele bazongaki na bingumba na bango, moto na moto na esika na ye.
-