Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 30:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Yehova Nzambe na yo mpe akozongisa bato na yo oyo bakangami+ mpe akoyokela yo mawa+ mpe akoyanganisa yo lisusu longwa na bato ya bikólo nyonso epai Yehova Nzambe na yo apalanganisá yo.+

  • Nzembo 106:47
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 47 Bikisá biso, Ee Yehova Nzambe na biso,+

      Mpe yanganisá biso longwa na bikólo+

      Mpo tópesa matɔndi na nkombo na yo mosantu,+

      Mpo tóloba na esengo mpo na kosanzola yo.+

  • Yisaya 66:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Mpe ya solo bakouta na bandeko na bino na bikólo nyonso+ lokola likabo epai na Yehova,+ likoló ya bampunda mpe na makalo mpe na bapusu oyo ezipami, likoló ya badɔngi mpe likoló ya bakamela+ ya basi oyo ezali na mbangu, na ngomba na ngai mosantu,+ Yerusaleme,” Yehova alobi bongo, “se lokola na ntango bana ya Yisraele bayaka na likabo na kati ya mbɛki ya pɛto mpo na kokɔta na ndako ya Yehova.”+

  • Ezekiele 36:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Mpe nakolongola bino na bikólo mpe nakoyanganisa bino uta na mikili nyonso mpe nakokɔtisa bino na mabele na bino.+

  • Mika 2:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 “‘Nakoyanganisa mpenza Yakobo, ɛɛ, yo mobimba;+ solo mpenza, nakosangisa esika moko bato ya Yisraele oyo batikali.+ Nakotya bango na bomoko, lokola bibwɛlɛ na lopango, lokola etonga na kati ya esika ya kolya matiti;+ makɛlɛlɛ ya bato ekozala kuna.’+

  • Zekaria 8:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Talá nazali kobikisa bato na ngai na mokili epai moi ebimaka mpe na mokili epai moi elalaka.+

  • Baroma 11:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 mpe na ndenge yango Yisraele+ mobimba ekobika. Kaka ndenge ekomamá ete: “Mosikoli akouta na Siona+ mpe akolongola epai ya Yakobo misala ya kotyola Nzambe.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto