-
1 Bakonzi 18:26Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
26 Na yango, bakamataki mwana-ngɔmbɛ oyo apesaki bango. Bongo balɛngɛlaki yango mpe babelelaki nkombo ya Baala banda ntɔngɔ tii na midi, bazalaki koloba: “Ee Baala, yanolá biso!” Kasi mongongo moko eyokanaki te,+ mpe moto moko ayanolaki te.+ Mpe bazalaki kotɛngumatɛnguma zingazinga ya etumbelo oyo basalaki.
-
-
Yona 1:5Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
5 Bongo bato oyo bazalaki kosala na masuwa babandaki kobanga mpe moto na moto abelelaki nzambe na ye mpo na kosɛnga lisalisi.+ Mpe bazalaki kobwaka biloko oyo ezalaki na masuwa na mbu, mpo na kolongola kilo na masuwa.+ Kasi Yona, ye, akitaki na kobe ya masuwa yango, mpe alalaki mpe mpɔngi makasi ekangaki ye.+
-