21 “Kanisá makambo wana, Ee Yakobo,+ mpe yo, Ee Yisraele, mpo ozali mosaleli na ngai.+ Nasalá yo.+ Ozali mosaleli na ngai. Ee Yisraele, ngai nakobosana yo te.+
20 “Efraime azali nde mwana ya motuya epai na ngai, to mwana oyo nalɛngɛlaka?+ Mpo ndenge nazali koloba mabe mpo na ye, ndenge mpe nakokanisa ye lisusu.+ Yango wana misɔpɔ na ngai ekómi na yikiyiki.+ Nakoyokela mpenza ye mawa,”+ yango nde liloba ya Yehova.
11Yango wana, nazali kotuna: Nzambe abwakaki nde bato na ye?+ Te, ata moke te! Mpo ngai mpe nazali Moyisraele,+ ya momboto ya Abrahama, ya libota ya Benyamina.+