Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 2:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Kasi bato oyo bazali kobunda na Yehova bakoyoka nsɔmɔ;+

      Akongulumela bango kuna na likoló lokola nkake.+

      Yehova ye moko akosambisa mabele tii na bansuka na yango,+

      Mpo apesa mokonzi+ na ye makasi,

      Mpo atombola liseke ya moto na ye oyo atyami mafuta.”+

  • Nzembo 67:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  4 Bituluku ya bato ya bikólo básepela mpe báganga na esengo,+

      Mpo okosambisa bato ya bikólo na bosembo;+

      Mpe bituluku ya bato ya bikólo, okokamba bango na mabele. Sela.

  • Nzembo 96:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Liboso ya Yehova. Mpo ayei;+

      Mpamba te ayei kosambisa mabele.+

      Na boyengebene, akosambisa mabele oyo ebotaka+

      Mpe na bosembo na ye,+ bato ya bikólo.

  • Yisaya 2:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe akokata mpenza makambo na kati ya bikólo,+ mpe akosembola makambo+ etali bato mingi ya bikólo.+ Mpe bakotula mipanga na bango mpo ekóma bitimweli ya mabele mpe makɔnga na bango mpo ekóma makwangola ya kokata matiti.+ Ekólo moko ekotombola mopanga te mpo na kobunda na ekólo mosusu, bakoyekola mpe etumba lisusu te.+

  • Misala 17:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Mpamba te atye mokolo moko oyo akani kosambisa+ na boyengebene mabele oyo bato bafandi na nzela ya moto moko oyo ye aponi, mpe apesi bato nyonso ndanga ndenge asekwisi+ ye uta na bakufi.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto