-
Nehemia 13:15Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
15 Na mikolo yango, namonaki na Yuda bato bazali konyatanyata mbuma na bikamwelo ya vinyo na mokolo ya sabata+ mpe bazali koya na mabondo ya mbuma mpe kotya+ yango likoló ya bampunda,+ mpe lisusu vinyo, mbuma ya vinyo mpe mbuma ya figi+ mpe lolenge nyonso ya mikumba ya kilo, mpe bazalaki kokɔtisa yango na Yerusaleme na mokolo ya sabata;+ mpe natatwelaki bango na mokolo oyo bazalaki kotɛka biloko.
-
-
Yisaya 58:13Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
13 “Soki mpo na sabata ozongisi lokolo na yo nsima mpo na kosala makambo oyo ezali kosepelisa yo na mokolo na ngai mosantu,+ mpe soki ya solo obengi sabata bisengo mpenza, mokolo mosantu ya Yehova, mokolo oyo ezali kokumisama,+ mpe soki ya solo okumisi yango na esika ya kotambola na banzela na yo moko, na esika ya komona makambo oyo ezali kosepelisa yo mpe na esika ya koloba liloba ya mpamba;
-