Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 30:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Yehova Nzambe na yo mpe akozongisa bato na yo oyo bakangami+ mpe akoyokela yo mawa+ mpe akoyanganisa yo lisusu longwa na bato ya bikólo nyonso epai Yehova Nzambe na yo apalanganisá yo.+

  • Yisaya 27:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe na mokolo yango ekosalema mpenza boye: Yehova akoningisa bambuma,+ banda na mai ya Ebale+ oyo ezali kotíyola kino na lobwaku ya mokɛli ya Ezipito,+ bongo, bokolɔkɔtama mokomoko,+ Ee bana ya Yisraele.

  • Hosea 1:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe bana ya Yuda ná bana ya Yisraele bakoyanganisama mpenza mpe bakozala na bomoko+ mpe, ya solo, bakomityela mokonzi se moko, mpe bakomata mpo bábima na mokili yango,+ mpamba te mokolo ya Yizireele ekozala monene.+

  • Matai 24:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Mpe akotinda baanzelu na ye na lokito makasi ya kelelo,+ mpe bakoyanganisa bato oyo ye aponá+ esika moko uta na mipɛpɛ minei,+ uta na nsuka moko ya likoló tii na nsuka na yango mosusu.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto