8 Akolongola mpenza liwa mpo na libela,+ mpe Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova akopangwisa mpenza mpisoli na bilongi nyonso.+ Mpe akolongola nsɔni ya bato na ye na mabele mobimba,+ mpo Yehova ye moko nde alobi yango.
19 Ntango bato ya Siona+ bakofanda na Yerusaleme,+ okolela ata moke te.+ Ye akozanga te komonisela yo boboto ntango lokito ya koganga na yo ekoyokana, ntango kaka akoyoka yango, akoyanola yo mpenza.+
10 Mpe baoyo Yehova asikoli bakozonga+ mpe ya solo bakoya na Siona na koganga ya esengo;+ mpe esengo ekozala na motó na bango mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ Bakosepela mpe bakozala na esengo, mpe mawa ná kokimela ekokima mpenza.+
4 Mpe akopangwisa mpisoli nyonso+ na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te,+ ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.+ Makambo ya kala eleki.”+