Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Luka 4:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 “Elimo ya Yehova+ ezali na ngai, mpo atye ngai mafuta mpo nasakwela babola nsango malamu, atindi ngai mpo nasakwela baoyo bakangami kosikolama mpe nafungola miso ya bato oyo bakufá miso, mpo natika bato oyo batutamá bákende na bonsomi,+

  • Luka 7:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Bongo azongiselaki bayekoli yango mibale ete: “Bókende+ koyebisa Yoane oyo bomoni mpe oyo boyoki: bato oyo bakufá miso+ bazali komona, batɛngumi bazali kotambola, bato ya maba bazali kopɛtolama mpe bato oyo bakufá matoi bazali koyoka, bakufi bazali kolamuka, nsango malamu ezali koyebisama epai ya babola.+

  • Misala 26:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 mpo na kofungola bango miso,+ mpo na kolongola bango na molili+ mpo báya na pole+ mpe kolongola bango na nguya ya Satana+ mpo báya epai ya Nzambe, mpo bázwa bolimbisi ya masumu+ mpe libula+ na kati ya baoyo basantisami+ na nzela ya kondima na bango epai na ngai.’

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto