Yisaya 61:1 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 61 Elimo ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso ezali na ngai,+ mpo Yehova atye ngai mafuta+ mpo nayebisa bato ya komikitisa nsango malamu.+ Atindi ngai nakanga mpota ya bato oyo bazoki na mitema,+ nasakola bonsomi epai ya baoyo bakangami+ mpe nafungola polele miso ya bato ya bolɔkɔ;+ Sefania 3:12 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 12 Mpe nakotika epai na yo ekólo moko ya komikitisa mpe oyo ezali komitombola te,+ mpe bakokima mpenza epai ya nkombo ya Yehova.+ Matai 11:5 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 5 Bato oyo bakufá miso bazali komona lisusu,+ mpe batɛngumi+ bazali kotambola, bato ya maba+ bazali kopɛtolama mpe bato oyo bakufá matoi+ bazali koyoka mpe bakufi+ bazali kolamuka, mpe nsango malamu+ ezali kosakolama epai ya babola; Luka 4:18 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 18 “Elimo ya Yehova+ ezali na ngai, mpo atye ngai mafuta mpo nasakwela babola nsango malamu, atindi ngai mpo nasakwela baoyo bakangami kosikolama mpe nafungola miso ya bato oyo bakufá miso, mpo natika bato oyo batutamá bákende na bonsomi,+ Yakobo 2:5 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 5 Bandeko na ngai ya bolingo, bóyoka. Nzambe aponaki baoyo bazali babola+ na mokili mpo bázala bazwi+ na kati ya kondima mpe bázala bazwi-ya-libula ya bokonzi, oyo alakaki baoyo balingaka ye,+ boye te?
61 Elimo ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso ezali na ngai,+ mpo Yehova atye ngai mafuta+ mpo nayebisa bato ya komikitisa nsango malamu.+ Atindi ngai nakanga mpota ya bato oyo bazoki na mitema,+ nasakola bonsomi epai ya baoyo bakangami+ mpe nafungola polele miso ya bato ya bolɔkɔ;+
12 Mpe nakotika epai na yo ekólo moko ya komikitisa mpe oyo ezali komitombola te,+ mpe bakokima mpenza epai ya nkombo ya Yehova.+
5 Bato oyo bakufá miso bazali komona lisusu,+ mpe batɛngumi+ bazali kotambola, bato ya maba+ bazali kopɛtolama mpe bato oyo bakufá matoi+ bazali koyoka mpe bakufi+ bazali kolamuka, mpe nsango malamu+ ezali kosakolama epai ya babola;
18 “Elimo ya Yehova+ ezali na ngai, mpo atye ngai mafuta mpo nasakwela babola nsango malamu, atindi ngai mpo nasakwela baoyo bakangami kosikolama mpe nafungola miso ya bato oyo bakufá miso, mpo natika bato oyo batutamá bákende na bonsomi,+
5 Bandeko na ngai ya bolingo, bóyoka. Nzambe aponaki baoyo bazali babola+ na mokili mpo bázala bazwi+ na kati ya kondima mpe bázala bazwi-ya-libula ya bokonzi, oyo alakaki baoyo balingaka ye,+ boye te?