Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 44:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Mpo bazwaki mokili na mopanga na bango moko te,+

      Mpe lobɔkɔ na bango moko te nde ememelaki bango lobiko.+

      Kasi ezalaki lobɔkɔ na yo ya mobali ná lobɔkɔ na yo+ mpe pole ya elongi na yo,

      Mpamba te osepelaki na bango.+

  • Nzembo 98:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 98 Bóyembela Yehova loyembo ya sika,+

      Mpo asali makambo ya kokamwa.+

      Lobɔkɔ na ye ya mobali, ɛɛ lobɔkɔ na ye mosantu, epesi ye lobiko.+

  • Yisaya 51:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Ee lobɔkɔ ya Yehova+ lamuká, lamuká, latá bokasi!+ Lamuká lokola na mikolo ya kala, lokola na ntango ya mabota ya bantango ya kala.+ Ezali yo te moto obukabukaki Rahaba,+ yo te moto otɔbɔlaki nyama ya nsɔmɔ ya mbu?+

  • Yisaya 52:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Yehova amonisi lobɔkɔ na ye mosantu na miso ya bikólo nyonso;+ mpe bandelo nyonso ya mabele ekomona mpenza lobiko ya Nzambe na biso.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto