Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 31:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Mpe ntango kaka basilisaki nyonso wana, Bayisraele nyonso+ oyo bazalaki wana babimaki, bakei na bingumba ya Yuda,+ mpe babandaki kobuka makonzí ya losambo,+ kokata banzete ya losambo,+ kokweisa bisika oyo etombwaná+ mpe bitumbelo+ na Yuda+ mobimba ná Benyamina, mpe na Efraime+ ná Manase+ tii basilisaki; nsima na yango, bana nyonso ya Yisraele bazongaki na bingumba na bango, moto na moto na esika na ye.

  • 2 Ntango 34:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 ɛɛ, abukaki mpe bitumbelo+ mpe banzete ya losambo,+ mpe abukabukaki bikeko oyo eyemami+ mpe akómisaki yango putulu;+ mpe akataki bitumbelo nyonso ya mpaka ya malasi+ na mokili mobimba ya Yisraele, nsima na yango azongaki na Yerusaleme.

  • Yirimia 17:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 ntango bana na bango bazali kokanisa bitumbelo na bango mpe banzete na bango ya losambo pembeni na nzete oyo etondi na nkasa, na bangomba mike oyo etombwaná,+

  • Ezekiele 36:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Mpe nakomwangisela bino mai ya pɛto, mpe bokokóma pɛto;+ nakopɛtola bino na mbindo+ na bino nyonso mpe na bikeko na bino nyonso oyo ezali bosɔtɔ.+

  • Hosea 8:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 “Mpamba te Efraime abakisi bitumbelo ebele ebele mpo na kosala masumu.+ Akómi na bitumbelo mpo na kosala masumu.+

  • Hosea 14:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 “Efraime akoloba boye: ‘Ngai ná bikeko likambo nini lisusu?’+

      “Ya solo, ngai nakoyanola mpe nakokoba kotala ye.+ Nazali lokola nzete ya jenevriye oyo etondi na nkasa.+ Basengeli kozwela yo mbuma nde epai na ngai.”

  • Zekaria 13:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 “Mpe ekosalema boye na mokolo yango,” yango nde liloba ya Yehova ya mampinga, “nakolongola nkombo ya bikeko na mokili oyo,+ mpe bakokanisa yango lisusu te; mpe lisusu nakolongola basakoli+ mpe elimo ya mbindo na mokili oyo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto