Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 12:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe nasengeli koleka na mokili ya Ezipito na butu yango+ mpe koboma mwana nyonso ya liboso ya mokili ya Ezipito, banda na moto tii na nyama,+ mpe nakopesa banzambe nyonso ya Ezipito bitumbu.+ Ngai Yehova.+

  • Yirimia 43:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe nakotya mɔtɔ na bandako ya banzambe ya Ezipito;+ mpe akotumba mpenza bango mpe akomema bango bakangami mpe akomilínga mokili ya Ezipito, lokola mobateli ya mpate amilíngaka elamba na ye,+ mpe akobima kuna mpenza na kimya.

  • Yirimia 46:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 “Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Talá nazali kotyela Amone+ ya No+ likebi na ngai, ná Farao, ná Ezipito, ná banzambe na ye,+ ná bakonzi na ye,+ ɛɛ, ná Farao mpe bato nyonso oyo bazali kotyela ye motema.’+

  • Ezekiele 30:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Nakobebisa mpe bikeko ya bosɔtɔ+ mpe nakosilisa banzambe ya mpambampamba na Nofe,+ mpe nkumu akozala lisusu te na mokili ya Ezipito; mpe nakotya mpenza kobanga na mokili ya Ezipito.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto