12 Mpe nasengeli koleka na mokili ya Ezipito na butu yango+ mpe koboma mwana nyonso ya liboso ya mokili ya Ezipito, banda na moto tii na nyama,+ mpe nakopesa banzambe nyonso ya Ezipito bitumbu.+ Ngai Yehova.+
19Liyebisi mpo na Ezipito:+ Talá! Yehova amati likoló ya lipata oyo ezali kokende mbangu+ mpe azali koya kokɔta na Ezipito. Mpe ya solo, banzambe ya mpambampamba ya Ezipito bakolɛnga liboso na ye,+ mpe motema ya Ezipito ekonyangwa na katikati na yango.+
25 “Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Talá nazali kotyela Amone+ ya No+ likebi na ngai, ná Farao, ná Ezipito, ná banzambe na ye,+ ná bakonzi na ye,+ ɛɛ, ná Farao mpe bato nyonso oyo bazali kotyela ye motema.’+