Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 8:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mpe soki balobi na bino: “Bótuna bato oyo basololaka na bilimo+ to baoyo bazali na elimo ya koyebisa makambo oyo ekoya, baoyo bazali koloba swiswiswi+ mpe na mingongo ya nse,” bato na bato basengeli nde kotuna Nzambe na bango te?+ Basengeli nde kotunela bato ya bomoi makambo epai na bakufi?+

  • Yisaya 44:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Nazali kobebisa bilembo ya bato ya bilobaloba, mpe ngai nde Ye oyo akómisaka basakoli ya makambo oyo ebombani lokola bato ya ligboma;+ Ye oyo azongisaka bato ya bwanya nsima, mpe Ye oyo azali kokómisa boyebi na bango bozoba;+

  • Misala 16:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe esalemaki ete ntango tozalaki kokende na esika ya mabondeli, mwana mwasi moko ya mosala oyo azalaki na elimo moko,+ demo moko ya kosakola makambo oyo ebombaná,+ akutanaki na biso. Azalaki kokɔtisela bankolo na ye mosolo mingi+ na mosala ya kosakola makambo oyo ekoya.

  • Emoniseli 18:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 mpe pole ya mwinda ekongɛnga lisusu epai na yo te, mpe mongongo ya mobali ya libala mpe ya mwasi ya libala ekoyokana lisusu epai na yo te;+ mpo bato na yo ya mombongo+ oyo basalaka mibembo bazalaki bato ya bibonga minene+ ya mabele, mpo okosi bikólo nyonso na misala na yo ya bilimo mabe.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto