64 “Mpe Yehova akopalanganisa mpenza yo na kati ya bato ya bikólo nyonso longwa na nsuka moko ya mabele kino na nsuka mosusu ya mabele,+ mpe kuna okosalela mpenza banzambe mosusu ya nzete mpe ya mabanga+ oyo oyebi te mpe oyo bankɔkɔ na yo bayebaki te.
8 “Nabondeli yo, kanisá+ liloba oyo opesaki Moize mosaleli na yo mitindo ete: ‘Soki bino, ɛɛ bino, bozangi bosembo, ngai, ɛɛ ngai, nakopalanganisa bino na kati ya bato ya bikólo.+
16 mpe nakopanza bango na kati ya bikólo oyo bayebi te, ezala bango, ezala batata na bango,+ mpe nakotinda mopanga nsima na bango kino nakosilisa bango nyɛɛ.’+