18 Talá oyo Yehova alobi: “Talá nazali koyanganisa bakangami ya bahema ya Yakobo,+ mpe nakoyokela batabernakle na ye mawa. Mpe engumba ekotongama lisusu likoló ya libondo na yango;+ mpe ndako molai ya kofanda ekozala likoló ya esika na yango mpenza.+
41 Mpe nakosepela na bango mingi mpo nakosalela bango malamu,+ mpe nakolona bango kati na mokili oyo+ na bosolo, na motema na ngai mobimba mpe na molimo na ngai mobimba.’”
11 “‘Na mokolo yango nakotɛlɛmisa+ mwa ndako ya matiti+ ya Davidi oyo ekweá,+ mpe nakobongisa madusu na yango. Mpe nakotɛlɛmisa bitika na yango, mpe nakotonga yango ndenge ezalaki na mikolo ya kala,+