8 Mpe ndelo yango emataki tii na lobwaku ya mwana ya Hinome+ tii na mopanzi ya ngomba ya Moyebusi+ na sudi, elingi koloba: Yerusaleme;+ mpe ndelo yango emataki tii na nsɔngɛ ya ngomba oyo etalani na lobwaku ya Hinome na wɛsti, oyo ezali na nsuka ya lobwaku ya patatalu ya Barefaime+ na nɔrdi.
10 Mpe akómisaki Tofete,+ oyo ezali na lobwaku ya bana ya Hinome,+ esika oyo ebongi te na losambo, mpo moto moko te alekisa mwana na ye ya mobali to mwana na ye ya mwasi mbeka na mɔtɔ+ mpo na Moleke.+
3 Mpe abimisaki milinga ya mbeka+ na lobwaku ya mwana ya Hinome+ mpe akómaki kotumba bana na ye+ na mɔtɔ, na kolanda makambo oyo eyinamá+ ya bikólo oyo Yehova abenganaki liboso ya bana ya Yisraele.+
31 Mpe batongi bisika oyo etombwaná ya Tofete,+ oyo ezali na lobwaku ya mwana ya Hinome,+ mpo na kotumba bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi na mɔtɔ,+ likambo oyo napesaki mitindo te mpe oyo eyaki na kati ya motema na ngai te.’+