Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 25:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Na nsima, bakangaki mokonzi+ mpe bamemaki ye epai ya mokonzi ya Babilone, na Ribla,+ mpo bákata likambo na ye.

  • 2 Ntango 36:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Bongo atindelaki bango mokonzi ya Bakaladea,+ oyo abandaki koboma na mopanga+ bilenge na bango ya mibali na ndako ya esika na bango mosantu,+ ayokelaki elenge mobali to ngɔndɔ, mobange to moto oyo anuni mawa te.+ Apesaki eloko nyonso na lobɔkɔ na ye.

  • Yirimia 37:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mokonzi Zidikiya atindaki bato mpe bazwaki ye, mpe mokonzi abandaki kotuna ye mituna na ndako na ye, na esika ya kobombana.+ Mpe alobaki ete: “Liloba euti na Yehova ezali?” Na yango, Yirimia alobaki: “Ezali!” Mpe alobaki lisusu: “Okopesama na lobɔkɔ ya mokonzi ya Babilone!”+

  • Yirimia 39:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe limpinga moko ya basoda ya Bakaladea ebandaki kolanda bango,+ mpe bazwaki Zidikiya na mokili patatalu oyo ekauká ya Yeriko.+ Bongo bakamataki ye mpe bamemaki ye epai ya Nebukadrezare mokonzi ya Babilone, na Ribla,+ na mokili ya Hamate,+ mpo azwela ye bikateli ya lisambisi.+

  • Yirimia 52:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Na nsima, bakangaki mokonzi mpe bamemaki ye epai ya mokonzi ya Babilone,+ na Ribla,+ na mokili ya Hamate,+ mpo akatela ye bikateli ya lisambisi.+

  • Ezekiele 17:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Mpe nakotanda monyama na ngai likoló na ye, mpe akokangama mpenza na monyama na ngai ya bokila;+ mpe nakomema ye na Babilone mpe nakosamba na ye kuna mpo na kozanga bosembo na ye oyo asalelaki ngai.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto