Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 19:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Osengeli te kobuba moninga na yo,+ mpe osengeli koyiba te.+ Lifuti ya mosali oyo azwaka lifuti ekotikala te butu mobimba epai na yo tii na ntɔngɔ.+

  • Kolimbola Mibeko 24:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 “Osengeli kobuba te mosali oyo azwaka lifuti, oyo azali na mpasi mpe azali mobola, ezala na kati ya bandeko na yo to na kati ya bapaya oyo bafandi na yo, oyo bazali na mokili na yo, na kati ya baporte na yo.+

  • Mika 3:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 bozali kotonga Siona na misala ya kosopa makila mpe Yerusaleme na misala oyo ezangi boyengebene.+

  • Habakuku 2:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 “‘Mawa na moto oyo azali kozwela ndako na ye litomba na ndenge ya mabe,+ mpo atya zumbu na ye na esika etombwaná, mpo amilongola na likama!+

  • Habakuku 2:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 “‘Mawa na moto oyo azali kosopa makila mpo atonga engumba, mpe oyo azangi boyengebene mpo apika sité makasi!+

  • Malaki 3:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 “Mpe nakobɛlɛma epai na bino mpo na kosambisa,+ mpe nakokóma moto oyo azali kotatola na lombangu+ mpo na kotɛmɛla banganga-nkisi,+ mpe bato ya ekobo,+ mpe baoyo balapaka ndai ya lokuta,+ mpe baoyo babubaka mosali na lifuti ya mosala na ye,+ baoyo babubaka mwasi oyo mobali akufá+ mpe mwana mobali oyo tata akufá,+ mpe baoyo bazali koboya moto oyo afandi mopaya,+ mpe bazali kobanga ngai te,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo.

  • Yakobo 5:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Talá! Bokangi lifuti oyo basali oyo babukaki mbuma ya bilanga na bino basengeli kozwa,+ ezali kokoba koganga,+ mpe kolela ya babuki-mbuma oyo bazali kosɛnga lisalisi+ ekɔti na matoi+ ya Yehova ya mampinga.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto