Yirimia 22:13 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 13 “Mawa na moto oyo azali kotonga ndako na ye,+ kasi na boyengebene te, mpe bashambrɛ na ye ya likoló, kasi na bosembo te, ndenge azali kosalisa moninga na ye mosala kaka mpamba, mpe azali kopesa ye lifuti na ye te;+ Ezekiele 24:9 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 9 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Mawa na engumba oyo etondi na misala ya kosopa makila!+ Ya solo, ngai moko nakokómisa liboke ya nkoni yango monene.+ Nahumu 3:1 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 Mawa na engumba oyo esopaka makila.+ Yango nyonso etondi na bokosi mpe na moyibi. Nyama ya kolya ezangi te! Emoniseli 17:6 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 6 Mpe namonaki ete mwasi yango alangwe makila+ ya basantu mpe makila ya batatoli ya Yesu.+ Ɛɛ, ntango namonaki ye nakamwaki mpenza kokamwa.+
13 “Mawa na moto oyo azali kotonga ndako na ye,+ kasi na boyengebene te, mpe bashambrɛ na ye ya likoló, kasi na bosembo te, ndenge azali kosalisa moninga na ye mosala kaka mpamba, mpe azali kopesa ye lifuti na ye te;+
9 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Mawa na engumba oyo etondi na misala ya kosopa makila!+ Ya solo, ngai moko nakokómisa liboke ya nkoni yango monene.+
3 Mawa na engumba oyo esopaka makila.+ Yango nyonso etondi na bokosi mpe na moyibi. Nyama ya kolya ezangi te!
6 Mpe namonaki ete mwasi yango alangwe makila+ ya basantu mpe makila ya batatoli ya Yesu.+ Ɛɛ, ntango namonaki ye nakamwaki mpenza kokamwa.+