28 Moto oyo Konia+ azali nde mbɛki mpamba oyo batyoli, oyo babukibuki,+ to mbɛki oyo basepeli na yango ata moke te?+ Mpo na nini ye ná libota na ye basengeli kobwakama na nse mpe kobwakama na mokili oyo bayebi te?’+
37Mpe mokonzi Zidikiya+ mwana ya Yosiya+ abandaki koyangela na esika ya Konia+ mwana ya Yehoyakime,+ oyo Nebukadrezare mokonzi ya Babilone akómisaki mokonzi na mokili ya Yuda.+