12 Nsukansuka, Yehoyakine mokonzi ya Yuda abimaki epai ya mokonzi ya Babilone,+ ye ná mama na ye,+ ná basaleli na ye, bankumu na ye ná bakapita ya ndako na ye; mpe mokonzi ya Babilone azwaki ye na mbula ya mwambe+ banda akómaki mokonzi.
9 Yehoyakine+ azalaki na mbula zomi na mwambe ntango abandaki koyangela, mpe ayangelaki sanza misato+ na mikolo zomi na Yerusaleme; mpe akobaki kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova.+
24 “‘Lokola nazali solo na bomoi,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘ata soki Konia+ mwana ya Yehoyakime,+ mokonzi ya Yuda, azalaka lopɛtɛ ya kotya kashɛ+ na lobɔkɔ na ngai ya mobali, nakolongola yo wana!+