Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 36:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango azalaki se kotindela bango makebisi na nzela ya bamemi-nsango+ na ye, azalaki kotinda yango mbala na mbala, mpo azalaki koyokela bato na ye mpe esika na ye ya kofanda+ mawa.+

  • Nzembo 81:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Ee soki bato na ngai báyokelaka ngai,+

      Ee soki Yisraele etambolaka na banzela na ngai mpenza!+

  • Yirimia 7:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe sikoyo lokola bozalaki kaka kosala misala oyo nyonso,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpe ngai nazalaki kaka koloba na bino, kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe koloba,+ kasi bino boyokaki te,+ mpe nazalaki kaka kobenga bino, kasi bino bozongisaki eyano te,+

  • Yirimia 11:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpo nakebisaki polelepolele bankɔkɔ na bino na mokolo oyo nalongolaki bango na mokili ya Ezipito+ mpe kino mokolo ya lelo, kolamukáká ntɔngɔntɔngɔ mpe kokebisáká ete: “Bótosa mongongo na ngai.”+

  • Yirimia 13:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Bato mabe oyo, oyo bazali koboya kotosa maloba na ngai,+ oyo bazali kotambola na motó makasi na bango+ mpe oyo bazali kaka kolanda banzambe mosusu mpo na kosalela bango mpe mpo na kogumbamela bango,+ bakozala mpe kaka lokola mokaba oyo, oyo ezali lisusu na ntina te.’

  • Yirimia 16:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe bino, na misala na bino, bosali mabe mingi koleka batata na bino,+ mpe talá, bozali kolanda moto na moto motó makasi+ mpe motema mabe na ye na kotosáká ngai te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto