Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 29:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 “Mpe ekosalema mpenza boye: soki moto moko ayoki maloba ya ndai+ oyo, mpe amipamboli na motema na ye, alobi: ‘Nakozala na kimya,+ ata natamboli na motó makasi ya motema na ngai,’+ na makanisi ya kolongola oyo ezwaka mai mingi elongo na oyo ezangi mai,

  • Basambisi 2:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mpe ezalaki kosalema boye: soki mosambisi yango akufi, bazalaki kobaluka mpe kobebisa makambo koleka batata na bango na kolandáká banzambe mosusu mpo na kosalela bango mpe kogumbamela bango.+ Batikaki te misala na bango mpe etamboli na bango ya motó makasi.+

  • Nehemia 9:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Atako ozalaki kotatwela+ bango mpo na kozongisa bango na mobeko na yo,+ bango bazalaki kaka kosala makambo na lofundo+ mpe bayokaki mitindo na yo te; basalelaki bikateli na yo ya lisambisi+ lisumu,+ bikateli oyo, soki moto alandi yango, akozala na bomoi na nzela na yango.+ Mpe bazalaki kaka kokanga matoi,*+ mpe bakómisaki motó na bango makasi,+ mpe bayokaki te.+

  • Yirimia 6:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Bango nyonso bazali bato ya mitó makasi,+ bazali kotambolatambola mpo na kokosela bato makambo+—bazali motako mpe ebende. Bango nyonso bazali bato oyo babebisaka.+

  • Yirimia 7:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Kasi bayokaki te, mpe basembolaki litoi na bango te,+ kasi babandaki kotambola na batoli na bango, na motó makasi ya motema na bango ya mabe,+ bongo bazongaki nsima mpe bakendaki liboso te,+

  • Yirimia 9:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 kasi bazalaki kaka kotambola na kolanda motó makasi na bango+ mpe kolanda bikeko ya Baala,+ oyo batata na bango bateyaki bango;+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto