Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yobo 21:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Miso na ye ekomona ndenge azali kosila,

      Mpe akomɛla nkɛlɛ ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.+

  • Nzembo 75:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  8 Mpo kɔpɔ ezali na lobɔkɔ ya Yehova,+

      Mpe vinyo ezali kobimisa fulufulu, etondi na biloko oyo esangisami.

      Mpe akosopa mpenza mbɔtɔ na yango;

      Bato mabe nyonso ya mabele bakosilisa yango, bakomɛla yango.”+

  • Yisaya 51:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 “Ee Yerusaleme, lamuká, lamuká, tɛlɛmá,+ yo oyo omɛli na lobɔkɔ ya Yehova kɔpɔ ya nkanda makasi na ye.+ Kɔpɔ ya monene, kɔpɔ oyo epesaka kizunguzungu, omɛli yango, osilisi yango.+

  • Yirimia 25:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 bakonzi nyonso ya nɔrdi, oyo bazali pene mpe mosika, mokomoko na bango, mpe makonzi mosusu nyonso ya mabele oyo ezali na etando ya mabele; mpe mokonzi ya Sheshake+ akomɛla nsima na bango.

  • Emoniseli 14:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 akomɛla mpe vinyo ya nkanda ya Nzambe oyo basangisá yango na eloko te mpe esopami na kati ya kɔpɔ ya nkɛlɛ na ye,+ mpe akonyokwama+ na mɔtɔ mpe na sufulu+ na miso ya baanzelu basantu mpe na miso ya Mwana-Mpate.

  • Emoniseli 16:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mpe engumba monene+ ekabwanaki na biteni misato, mpe bingumba ya bikólo ekweaki; mpe Nzambe akanisaki Babilone Monene,+ mpo na kopesa yango kɔpɔ ya vinyo ya nkanda na ye makasi.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto