15 Mpo talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobaki na ngai: “Kamatá kɔpɔ oyo ya vinyo ya nkɛlɛ na lobɔkɔ na ngai, mpe osengeli komɛlisa yango bikólo nyonso oyo nazali kotinda yo epai na bango.+
7 Mpe moko ya bikelamu minei ya bomoi+ apesaki baanzelu nsambo wana mabakuli ya wolo oyo etondi na nkanda ya Nzambe,+ oyo azali na bomoi libela na libela.+