Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 30:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 Mpe ya solo Yehova akoyokisa lokumu ya mongongo+ na ye mpe akomonisa ndenge lobɔkɔ na ye ekokita,+ na kongala makasi ya nkanda+ mpe na lolemo ya mɔtɔ oyo ezali kozikisa+ mpe na mbula makasi ya pwasa mpe na mbula ya mopɛpɛ makasi+ mpe na mbula ya mabanga.+

  • Yisaya 66:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 “Mpo talá Yehova ye moko azali koya lokola mɔtɔ,+ mpe makalo na ye ezali lokola mopɛpɛ makasi,+ mpo na kokitisela bato nkanda ná nkɛlɛ na ye mpe mpamela na ye oyo ezali ndemo ya mɔtɔ.+

  • Yirimia 23:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Talá! Mopɛpɛ makasi ya Yehova, nkɛlɛ, ekobima mpenza, ɛɛ mopɛpɛ makasi oyo ezali kobalukabaluka.+ Ekobalukabaluka likoló na motó ya bato mabe.+

  • Yirimia 30:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Talá! Mopɛpɛ makasi ya Yehova, nkɛlɛ na ye mpenza, ebimi, mopɛpɛ makasi oyo ezali kokɔmbɔla.+ Ekobalukabaluka likoló ya motó ya bato mabe.+

  • Sefania 3:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 “‘Yango wana, bózela ngai,’+ yango nde liloba ya Yehova, ‘tii mokolo oyo nakotɛlɛma mpo na kozwa biloko oyo epunzami,+ mpo ekateli na ngai ya lisambisi ezali ya koyanganisa bikólo,+ mpo nasangisa makonzi esika moko, mpo na kosopela bango bikateli na ngai ya etumbu,+ nkanda na ngai nyonso ya kongala; mpamba te, mabele mobimba ekolyama na mɔtɔ ya molende na ngai.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto