Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 14:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe Yehova alobaki lisusu na ngai boye: “Basakoli bazali kosakola nde lokuta na nkombo na ngai.+ Natindi bango te, napesi mpe bango mitindo te mpe nalobi na bango te.+ Emonaneli ya lokuta, kosakola makambo oyo ebombaná, likambo ya mpambampamba,+ mpe bokosi ya motema na bango, yango nde bazali koloba na bino na maloba ya esakweli.+

  • Yirimia 23:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 “Natindaki basakoli te, kasi bango moko bapotaki mbangu. Nalobaki na bango te, kasi bango moko basakolaki.+

  • Yirimia 28:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Bongo mosakoli Yirimia alobaki lisusu na mosakoli Hanania+ boye: “Nabondeli yo, yoká, Ee Hanania! Yehova atindi yo te, kasi yo moko nde otindi bato oyo bátyela lokuta motema.+

  • Yirimia 29:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpo talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: “Basakoli na bino oyo bazali kati na bino mpe basakoli na bino ya makambo oyo ebombaná bákosa bino te,+ mpe bóyoka te bandɔtɔ na bango oyo bazali kolɔta.+

  • Ezekiele 13:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 “Bamoni bimonaneli ya makambo ya lokuta mpe kosakola makambo oyo ebombaná ya bokosi,+ baoyo bazali koloba ete: ‘Liloba ya Yehova ezali boye,’ nzokande Yehova ye moko atindi bango te, mpe bazeli liloba moko boye ekokisama.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto