Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 13:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 “Soki mosakoli+ moko to molɔti ndɔtɔ+ moko oyo alɔti ndɔtɔ abimi epai na yo mpe apesi yo elembo moko to likamwisi moko ya komonisa makambo oyo ekoya,+

  • Yirimia 14:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe Yehova alobaki lisusu na ngai boye: “Basakoli bazali kosakola nde lokuta na nkombo na ngai.+ Natindi bango te, napesi mpe bango mitindo te mpe nalobi na bango te.+ Emonaneli ya lokuta, kosakola makambo oyo ebombaná, likambo ya mpambampamba,+ mpe bokosi ya motema na bango, yango nde bazali koloba na bino na maloba ya esakweli.+

  • Yirimia 23:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 “Natindaki basakoli te, kasi bango moko bapotaki mbangu. Nalobaki na bango te, kasi bango moko basakolaki.+

  • Yirimia 27:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 “‘Mpo natindi bango te,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘kasi bazali kosakola makambo ya lokuta na nkombo na ngai, mpo napalanganisa bino,+ mpe bokokufa mpenza,+ bino ná basakoli na bino oyo bazali kosakwela bino.’”+

  • Yirimia 29:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 “Tindelá bato nyonso oyo bamemamaki na mboka mopaya+ nsango ete: ‘Talá oyo Yehova alobi mpo na Shemaya moto ya Nehelame: “Lokola Shemaya asakweli bino, nzokande natindaki ye te, mpe ameki kotinda bino bótyela lokuta motema,+

  • Ezekiele 13:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Mawa na bazoba+ ya basakoli, oyo bazali kolanda makanisi na bango moko,+ nzokande bamoni ata eloko moko te!+

  • Zekaria 13:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe ekosalema boye: soki moto asakoli lisusu, tata na ye ná mama na ye, bato oyo babotaki ye, bakoloba na ye ete: ‘Okozala na bomoi te, mpamba te olobi lokuta na nkombo ya Yehova.’ Mpe tata na ye ná mama na ye, bato oyo babotaki ye, bakotɔbɔla ye mpo azali kosakola.+

  • Luka 6:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 “Mawa, ntango bato nyonso bazali kolobela bino malamu, mpo ezali makambo ya ndenge wana nde bankɔkɔ na bango basalelaki basakoli ya lokuta.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto