-
2 Bakonzi 24:14Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
14 Mpe amemaki na mboka mopaya+ Yerusaleme mobimba ná bankumu+ nyonso ná bilombe nyonso mpe mibali ya nguya+—amemaki bato nkóto zomi (10 000) na mboka mopaya—mpe lisusu moto nyonso oyo ayebi malamu misala ya mabɔkɔ+ ná motongi nyonso ya bifelo ya makasi ya libateli. Ata moto moko te atikalaki, longola kaka bato mpamba+ kati na bato ya mokili.
-
-
Yirimia 24:1Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
24 Mpe Yehova amonisaki ngai, mpe, talá! kitunga mibale ya figi etyami liboso ya tempelo ya Yehova, nsima wana Nebukadrezare mokonzi ya Babilone amemaki na mboka mopaya Yekonia+ mwana ya Yehoyakime,+ mokonzi ya Yuda, mpe bankumu ya Yuda mpe bato oyo bayebi malamu misala ya mabɔkɔ+ mpe batongi ya bifelo makasi ya libateli, longwa na Yerusaleme mpo amema bango na Babilone.+
-