12 Na yango, alobaki ete: “Mpo nakozala elongo na yo,+ mpe talá elembo mpo na yo oyo ekomonisa ete ngai nde natindi yo:+ Ntango okosilisa kobimisa bato na Ezipito, bokosalela Nzambe ya solo na ngomba oyo.”+
6 Bózala na mpiko mpe na makasi.+ Bóbanga te mpe bózala na nsɔmɔ te liboso na bango,+ mpamba te Yehova Nzambe na yo nde azali kotambola elongo na yo. Akosundola yo te mpe akotika yo soki moke te.”+
5 Moto moko te akokoka kotɛlɛma liboso na yo na mikolo nyonso ya bomoi na yo.+ Ndenge nazalaki na Moize, ndenge wana nde nakozala na yo.+ Nakosundola yo te mpe nakotika yo soki moke te.+
20 “Mpe nakómisi yo epai ya bato oyo efelo ya motako oyo ebatelami makasi;+ mpe bakobunda na yo mpenza, kasi bakolonga yo te.+ Mpo nazali elongo na yo, mpo na kobikisa yo mpe mpo na kosikola yo,”+ yango nde liloba ya Yehova.