Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 26:44
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 44 Mpe atako bongo, ntango bakozala na mokili ya banguna na bango, nakobwaka bango ata moke te+ mpe nakoyina bango te+ kino kosilisa bango nyɛɛ, kobukáká kondimana+ na ngai na bango; mpo ngai nazali Yehova Nzambe na bango.

  • Nehemia 9:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Mpe na motema mawa mingi oyo ozali na yango, osilisaki bango nyonso nyɛɛ+ te to otikaki+ bango te; mpo ozali Nzambe ya ngɔlu+ mpe ya motema mawa.+

  • Nzembo 78:38
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 38 Kasi azalaki na motema mawa;+ azalaki kozipa libunga+ mpe azalaki koyeisa libebi te.+

      Mpe mbala mingi, azalaki kozongisa nkanda na ye nsima,+

      Mpe azalaki kolinga te kolamwisa nkɛlɛ na ye nyonso.

  • Bileli 3:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Ezali mpo na misala ya motema boboto+ ya Yehova nde tosili te,+ mpamba te ebele ya misala na ye ya motema mawa ekosuka te.+

  • Ezekiele 20:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 “‘“Mpe liso na ngai ebandaki koyokela bango mawa mpe epekisaki ngai koboma bango,+ bongo nasilisaki bango nyɛɛ na esobe te.

  • Amose 9:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 “‘Talá! Miso ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso ezali likoló ya bokonzi ya masumu,+ mpe akolimwisa yango na mabele.+ Ata bongo, nakolimwisa ndako mobimba ya Yakobo te,’+ yango nde liloba ya Yehova.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto