19 yo, ɛɛ yo, na motema mawa oyo otondi na yango, otikaki+ bango te na kati ya esobe. Likonzí ya lipata elongwaki te likoló na bango na moi mpo na kokamba bango na nzela,+ mpe likonzí ya mɔtɔ na butu mpo na kongɛngisela bango nzela oyo basengelaki kotambola.+
11 “Mpo nazali elongo na yo,” yango nde liloba ya Yehova, “mpo na kobikisa yo;+ kasi nakosilisa bato nyɛɛ kati na bikólo nyonso epai napalanganisaki yo.+ Kasi yo, nakosilisa yo nyɛɛ te.+ Mpe nasengeli kosembola yo na ndenge oyo ekoki, mpo nakozanga te kopesa yo etumbu.”+