7 abatelaka motema boboto mpo na bankóto,+ alimbisaka libunga ná kobuka mibeko mpe lisumu,+ kasi akozanga ata moke te kopesa etumbu,+ mpe mpo na libunga ya batata, ayeiselaka bana etumbu mpe bana ya bana, libota ya misato mpe libota ya minei.”+
10 Ngai, Yehova, nalukalukaka na kati ya motema+ mpe natalatalaka bangɛi,+ ɛɛ mpo na kopesa moto na moto ndenge banzela na ye ezali,+ ndenge mbuma ya misala na ye ezali.+