Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 6:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: “Sikoyo okomona oyo nakosala Farao,+ mpamba te mpo na nguya ya lobɔkɔ na ngai akotika bango bákende mpe na ntina ya nguya ya lobɔkɔ na ngai akobengana bango na mokili na ye.”+

  • Kobima 15:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Kobanga mpe nsɔmɔ ekokwela bango.+

      Mpo na nguya ya lobɔkɔ na yo bakoningana te lokola libanga,

      Kino bato na yo+ bakoleka, Ee Yehova,

      Kino bato oyo obimisi+ bakoleka.+

  • Kolimbola Mibeko 26:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Nsukansuka, Yehova abimisaki biso na Ezipito na nguya ya lobɔkɔ+ na ye mpe na lobɔkɔ oyo esembolami+ mpe na makambo minene ya nsɔmɔ+ mpe na bilembo mpe makamwisi.+

  • 1 Ntango 17:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpe ekólo mosusu nini na mabele ezali lokola bato na yo Yisraele,+ oyo Nzambe ya solo akendaki kosikola mpo na ye moko, mpo bázala bato na ye,+ mpo omipesa nkombo na misala minene+ mpe na makambo ya nsɔmɔ na ndenge ozalaki kobengana bikólo+ liboso ya bato na yo oyo osikolaki longwa na Ezipito?

  • Nzembo 136:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Na nguya ya lobɔkɔ na ye mpe lobɔkɔ oyo esembolami:+

      Mpo motema boboto na ye ezali seko na seko;

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto