Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 9:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 “Kanisá: Kobosana te ndenge otumolaki Yehova Nzambe na yo na esobe.+ Banda na mokolo oyo obimaki na mokili ya Ezipito kino kokóma na bino na esika oyo, botombokelaki Yehova na etamboli na bino.+

  • 2 Bakonzi 17:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 mpe bana ya Yisraele bakómaki koluka makambo oyo ezali malamu te na miso ya Yehova Nzambe na bango+ mpe bazalaki se komitongela bisika oyo etombwaná+ na kati ya bingumba na bango nyonso, banda na linɔ́ngi+ ya basinzili tii na engumba oyo ebatelami makasi;

  • Nehemia 9:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 “Kasi bango, ɛɛ bankɔkɔ na biso, basalaki makambo na lofundo+ mpe bakómisaki motó na bango makasi,*+ mpe bayokaki mibeko na yo te.

  • Nzembo 106:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Tosali masumu se lokola bankɔkɔ na biso;+

      Tosali libunga; tosali mabe.+

  • Yirimia 2:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 “Mpe nsukansuka namemaki bino na mokili ya elanga ya banzete ya mbuma, mpo bólya mbuma na yango mpe biloko na yango ya kitoko.+ Kasi bokɔtaki mpe bokómisaki mokili na ngai mbindo; mpe bokómisaki libula na ngai eloko oyo eyinamá.+

  • Yirimia 3:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Tozali kolala na kati ya nsɔni+ na biso, mpe kosambwa na biso ezali kaka kozipa biso;+ mpo ezali Yehova Nzambe na biso nde tosaleli lisumu,+ biso ná batata na biso banda bolenge na biso tii na mokolo ya lelo,+ mpe totosi te mongongo ya Yehova Nzambe na biso.”+

  • Ezekiele 16:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 “‘Mpe nalekaki pene na yo mpe namonaki yo, mpe talá! ntango na yo ezalaki ntango ya komonisa bolingo.+ Bongo natandaki elamba na ngai likoló na yo+ mpe nazipaki bolumbu na yo mpe nalapelaki yo ndai mpe nasalaki kondimana ná yo,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, ‘bongo okómaki wa ngai.+

  • Ezekiele 20:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Mpe nakɔtisaki bango na mokili+ oyo mpo na yango natombolaki lobɔkɔ na ngai mpe nalapelaki bango ndai.+ Ntango bamonaki ngomba moke nyonso oyo etombwaná+ mpe nzete nyonso oyo ezali na bitape, babandaki kopesa bambeka na bango kuna+ mpe kopesa kuna makabo na bango oyo ezali kosilikisa, mpe kopesa kuna nsolo na bango ya kokitisa motema+ mpe kosopa makabo na bango ya masanga kuna.+

  • Misala 7:51
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 51 “Bato ya mitó makasi mpe bazangá kokatama ngenga na mitema+ mpe na matoi, bozali ntango nyonso kotɛmɛla elimo santu; ndenge bankɔkɔ na bino basalaki, bino mpe bozali kosala bongo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto