2 Mpe bino, bosengeli te kosala kondimana ná bato oyo bafandi na mokili oyo.+ Bosengeli kobuka bitumbelo na bango.’+ Kasi bino botosi mongongo na ngai te.+ Mpo na nini bosali boye?+
8 “Lisusu, oyoki te,+ oyebi mpe te, banda ntango wana litoi na yo efungwami mpe te. Mpo nayebi malamu ete ozalaki mpenza kosala makambo na bokosi,+ mpe babengá yo ‘moto oyo abukaka mibeko banda na libumu.’+
21 Nalobaki na yo na ntango oyo ozalaki na mitungisi te.+ Olobaki ete: ‘Nakotosa te.’+ Yango nde nzela na yo banda bolenge na yo, mpo otosaki mongongo na ngai te.+
10 Mpe totosi mongongo ya Yehova Nzambe na biso te na ndenge totambolaki te na mibeko na ye oyo atyaki liboso na biso na lobɔkɔ ya basaleli na ye basakoli.+