Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 36:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Kasi bazalaki ntango nyonso kosɛka+ bamemi-nsango ya Nzambe ya solo mpe komona maloba na ye mpamba+ mpe kotyola+ basakoli na ye, tii nkɛlɛ+ ya Yehova ekitelaki bato na ye, tii bakokaki lisusu kobikisama te.+

  • Yirimia 7:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe sikoyo lokola bozalaki kaka kosala misala oyo nyonso,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpe ngai nazalaki kaka koloba na bino, kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe koloba,+ kasi bino boyokaki te,+ mpe nazalaki kaka kobenga bino, kasi bino bozongisaki eyano te,+

  • Yirimia 25:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 “Banda mbula ya zomi na misato ya Yosia+ mwana ya Amone, mokonzi ya Yuda, kino mokolo ya lelo, mbula ntuku mibale na misato (23) oyo, liloba ya Yehova eyeli ngai, mpe nazalaki kaka koloba na bino, nazalaki kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe koloba, kasi boyokaki te.+

  • Yirimia 26:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 na koyokáká maloba ya basaleli na ngai basakoli, oyo nazali kotindela bino, ɛɛ nazali kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe kotinda bango, baoyo bino boyokeli te,+

  • Yirimia 35:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe nazalaki kaka kotindela bino basaleli na ngai nyonso basakoli,+ kolamukáká ntɔngɔntɔngɔ mpe kotindáká bango na maloba oyo: ‘Nabondeli bino, bózonga, moto na moto alongwa na nzela na ye ya mabe,+ mpe bóbongisa misala na bino,+ mpe bólanda banzambe mosusu te mpo na kosalela bango.+ Mpe bókoba kofanda na mabele oyo napesá bino mpe bankɔkɔ na bino.’+ Kasi bosembolaki litoi na bino te, mpe boyokaki ngai te.+

  • Yirimia 44:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Kasi bayokaki te,+ mpe basembolaki litoi na bango te mpo na kolongwa na mabe na bango na kotikáká kobimisela banzambe mosusu milinga ya mbeka.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto